MPR - MEDITATION (FREESTYLE)

[Paroles de "MÉDITATION (FREESTYLE)"]

[Intro]
Hein
Mister Producer
Méditation
Tambwisa micro

[Couplet unique : Zozo Machine]
Omoni succès nde' e'a lokuta ?
Niongo ya nani eza nafuta ?
Nakati hémorragie ya style, ya ba rappeurs oyo nioso nakuta
Naza poète oza interprète, game napesi yango mafuta
Nakopona jamais camp entre Ferre Gola na Fally Ipupa
Soki omoni esika nawuti okoki kosala nga guerre te
Na'a musicien po na cause, yango na'oyemba na mwa fierté
O planté nioso yo moko, ba'o réclamés bazwa la moitié
Bakati racine, bazikisi, bakanisi sort ya feuille te
Silence ezwi parole, eye na message ya koyebisa yo
Ozo faire face na ba échecs no moko е'a na tendance ya kolebisa yo
Rеmède eza te, po na maladie ya ignorance oyo e collé biso
Bakanisi bayebi nga, po ba'omona Zozo devant micro
Na me détaché na ba démons na nga
Kokola eza pe kodima changement, nayebi te ndenge ozomona nga
Na'a na appui te ka' ba faiblesses oyo ndule ezo couvrir
Sans ligne ya départ oyebi te derrière nini ozo courir
Architecte ya avenir no, yo moko nde opie plan mabe
Ba échecs na nga te, mais ba doutes na nga nde e'a ba plus grands regrets
Kolinga yo ezalaki bien, ko garder yo pe ezala' étape mosusu
Balingi ezala nga, mais sans micro, sans locks, na taffe mosusu
Love napia balabala ba défauts na ye na'omona lisusu te
Combien baloba bakozala na nga balimwa na'omona suite te
Ba fausses notes na nga ezwi mélodie nde baye ko zouker
Contrairement ya Mani bango bamonaki or na libulu te
Avenir e'a brutal, passé na nga eza fragile
Na radio ya mascara bolingo ekoma chanson nostalgique
Plume ya jeunesse ekomisi nga na ba fautes ebele
Nayeba kolinga te, naloba je t'aime na ba fautes ebele
Na s'effondre lisusu malgré envie ya kozala solide
Nazelaki likolo efongwama eya kotikela soki pe nini
Parole na acte, eza na écart na'okufa na silence
Partout c'est les mêmes, garantie e'a te nioso eza coincidence, eh
Ozo perdre temps no ebele na ko se justifier
Motema etikala sombre, vie ezwa nga soki pe combien de piliers
Banda lobi ba'ozela nioso ekoma kaka nde ba dessiné
Vie eza offre, ata na s'accrocher nde nini un jour nako décliner
Père, namemami na courant ya ego
Nasali vide na'oyoka makelele y'a conscience na nga na écho
Na'a na royaume ya ko défendre après sortie ya chaque projet
Couronne e'a fatigué te mais na mutu na nga ezo se reposer
Lelo lisusu na'olamuka kaka na même vie
Na même envie, na même partage, na kopia tout nakozonga les mains vides
Musique ezalaki seul moyen ya komona suka tunnel
Na'ovanda na mutu, na'o comprendre que ata mbwa aza ami fidèle
Mélodie ya gentillesse esuki na fausse note
Vie e virelé nga sourire mais ekweyi na faux compte
Rap nabotisi ya ngo bana après na vuzuli ya ngo ba trompes
Ba'a na ba fleurs ya kobwakela nga mais ba'ozela nakota na tombe
Oza na idée ata muke te ya vrai vie na nga
Kotika sœur na nga en vie ezalaki seul bonheur oyo vie epima nga
Obosani nombres de fois baboya kopesa yo chance ?
Obosani nombres ya ba efforts osala po otelema, obosani?
Nombres ya ba tempêtes o traversé ti awa ?
Obosani avenir okoma na motema gomme ya circonstance effaça ?
Papa chaque seconde, eza un pas na nzela ya liwa
Ba annulé Cigale, ba annulé Athénée, ba'ozela pe MPR elimwa
Na'a na ba comptes ya ko rendre na mutu te il faut ezala clair
Na chantier ya carrière na nga po ozwa esika il faut omema pierre
Merci na être invisible oyo azo partagé peine na nga
Merci na Kalash Criminel, Leto, Youssoupha père na nga
Polémique ezo couvrir ba oyo banzanga musala
Public ezo souffrir na choix ya oyo ya sika na oyo ya kala
Nakoma ba nzembo trop, sikoyo il faut nakoma pe histoire
Rap congolais nakata singa, na'okabola viande na abattoir
Bébé na'a na ba ennemis ebele, nakobombela yo te
Mingi baza libre na corps mais esprit na bango eza menotté
Nakola na machette, église muke, ganja na morote
Na'o pratiquer te, po Emeneya aloba ndule e'a kimono te
Succès eza ndumba, nakoki komelela ye mbondo te
Biso na bino tout match eza te, ata photo
Déjà mwana mboka na poche
Mibali ba'a muke na game mingi bazolia na gauche
Oyekoli mabe olingi kokengela moyi na torche
Bayibi Maria po ba remplacer ba ndumba na grotte
Jeunesse e'a na distraction trop est-ce que boyebi ?
Totiki une année ya vide, nini boyembi ?
Concurrence eye na balance mais eza ata kilo te
Congolais aza na wolo, aza na diamant mais aza na kingo te
[Outro]
Bolingo ekomisaka aveugle
Mutema mabe pe ekomisaka aveugle
Oyo eza MPR, hein
Équipe de rêve équipe e changé te, hein

Comments

  • ×